Conseil

Kobanda design graphique na RDC : makambo oyo osengeli koyeba lelo

Andréas Mukonda Lokola miniti 1 ya kotanga

Design graphique ezali naino mosala oyo ekoki kopesa mbongo, kasi mosala yango ebongwani.

Na intelligence artificielle, moto nyonso akoki lelo kosala image na mwa baseconde. Yango wana, graphiste oyo ayebi kaka kosala “ba images ya kitoko” akoki noki kobungisa valeur na ye.

Valeur na yo ya solo esengeli kozala na makambo mosusu : kososola besoin ya client, kobongisa information, koyeba kosalela ba couleurs, typographie mpe kobongola idée na communication ya malamu.

Na RDC, esengeli mpe koyeba kosala na ba réalités na biso : ba ordinateurs oyo ezali makasi mingi te, kokatakata ya courant mpe Internet oyo ezalaka stable te. Salela malamu oyo ozali na yango. Télécharger ba polices, images mpe ba ressources na yo liboso, bomba ba fichiers importants hors ligne mpe salela ba outils oyo ebongi na machine na yo.

Mpe koleka nyonso, kobunda na IA te : yekola kosalela yango.

Graphiste ya lobi akozala kaka te remplacé na IA. Akoki nde kolekama na graphiste mosusu oyo ayebi kosalela IA malamu koleka ye.

Outil ya malamu esalisaka. Machine ya malamu epesaka vitesse. Kasi compétence na yo nde ezali capital na yo ya solo , eko permettre yo o se retrouver .

— Andréas Mukonda Eke-Shomba