Graphic Designer · Formateur · Consultant · Entrepreneur digital
Mbote, nazali Andréas.
Kombo na ngai mobimba ezali Andréas Mukonda Eke-Shomba. Nazali na Kinshasa.
Nazali Graphic Designer, Formateur, Consultant mpe Entrepreneur digital.

Uta kala nazalaki kolinga technologie, création mpe ndenge likanisi ekoki kokoma eloko ya solo.
Nayekolaki administration des réseaux mpe gestion ya bases de données na ESMICOM.
Na sima, nakobaki koyekola mpe kosala na design graphique, web, photo, vidéo, formation mpe entrepreneuriat.
Mpo na nini nasalaka makambo ebele ?
Pamba te projet moko ekoki kozala na posa ya makambo ebele.
Entreprise ekoki kozala na posa ya logo, site web, ba visuels mpo na réseaux sociaux mpe conseil mpo elakisa activité na yango malamu.
Yango nde esangisaka misala na ngai.
Ndenge nasalaka
Nalingaka kobanda na koyoka.
Liboso ya kosala, nasalaka makasi nayeba posa na yo, bato oyo olingi kokomela mpe résultat oyo ozali koluka.
Na sima, tolukaka solution oyo ebongi na yo.
Formation
Licence en administration des réseaux et gestion de bases de données — ESMICOM
Publications
Nazali mpe mokomi ya ba livres mibale ya inspiration chrétienne.
Ba informations ya sika na ntina ya ba livres wana ekoti nsima.
Vision na ngai
Kosala lelo ba solutions oyo ekosala bokeseni lobi.
Mpo na ngai, numérique mpe créativité esengeli kosalisa kosilisa ba problèmes, kokabola mayele mpe kotonga ba possibilités ya sika.
Global SHOMDREE Industries
Na 2022, nasalaki Global SHOMDREE Industries mpo na kobongisa misala na ngai.
Ezali na :
Global SHOMDREE Industries
SHOMDREE Academia
Koyekola mpo na kokende liboso.
Formations mpe kokabola mayele.
SHOMDREE Business
Kolongwa na likanisi mpo ekoma projet oyo ebongisami.
Conseil mpe lisalisi.
SHOMDREE Design
Kopesa makanisi na yo identité ya makasi.
Design graphique, communication visuelle mpe impression.
SHOMDREE Medias
Koloba lisolo na yo na ba images ya malamu.
Photo, vidéo mpe contenus numériques.